Revelation of John 1

Yesu : temwe ya solo oyo tokoki kotiela mitema

1Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye mpo alakisa na basalina ye makambo oyo esengeli kosalama noki. Alakisaki makambo yango tango atindaki anzelu na ye epai ya mosali na ye Jean, 2oyo azali kotatola makambo nyonso oyo amonaki : makambo yango ezali, Lilobaya Nzambe mpe litatoli ya Yesu Kristo.

3Esengo na moto oyo azali kotanga maloba ya kosakola oyo, mpe esengo na bato oyo bazali koyoka yango mpe bazali kobatela makambo oyo ekomama na kati na yango, pamba te tango ekomi pene-pene.

4Ngai Jean, natindi mokanda oyo epai ya Mangomba sambo oyo ezali na mokili ya Azia : tika ete ngolu mpe kimia ezala na bino, wuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, mpe wuta na milimo sambo oyo bazali liboso ya Kiti na ye ya Bokonzi, 5mpe wuta na Yesu Kristo, temwe ya solo, Mwana ya liboso oyo asekwaki wutana bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili.

Na ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela yamakila na ye,
6mpe akomisaki biso batu ya Bokonzi, mpe banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe na ye mpe Tata. Tika ete nkembo mpe nguya ezala na ye libela na libela ! Amen.
7 Botala ! azali koya na mapata,
mpe bato nyonso bakomona ye ;
ata baoyo batubaki ye likonga.
Mpe bato nyonso ya mokili bakolela mpo na ye.
Ekozala se bongo ! Amen.

8 Nkolo Nzambe na nguya nyonso
oyo azali, azalaki mpe azali koya,
alobi boye :
“Ngai nazali Alfa mpe Omega
Alfa mpe Omega  : elingi koloba : ebandeli mpe suka.
 !”

Jean amoni Kristo kati na emoniseli

9Ngai ndeko na bino Jean, oyo azali lisanga moko na bino, na minyoko, na Bokonzi mpe nakokanga motema kati na Yesu, nazalaki na esanga ya Patimos mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli ya Yesu. 10Na mokolo ya Nkolo, Molimo amemaki ngai, bongo nayokaki sima na ngai mongono moko ya makasi penza lokola kelelo ; 11yango elobaki :

—Makambo oyo ozali komona, koma yango na buku, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efezo, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfiya mpe Laodiseya.

12Bongo nabalukaki mpo na kotala moto oyo azalaki koloba na ngai. Tango nabalukaki, namonaki biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda, 13mpe moto moko lokola Mwana ya moto azalaki na kati-kati na yango. Alataki nzambala oyo ekomaki tii na makolo, mpe akangaki mokaba moko ya wolo na tolo na ye. 14Motu na ye mpe suki na ye ezalaki pembe makasi lokola bapwale ya pembe, lokola mbula ya mabanga. Miso na ye ezalaki lokola moto ezali kopela. 15Makolo na ye ezalaki lokola ebende ya talo oyo bapetoli na motomakasi, mpe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya mayi ya ebale monene. 16Asimbaki minzoto sambo na loboko na ye ya mobali, mpe mopanga moko ya mino mibale ezalaki kobima na monoko na ye. Elongi na ye ezalaki lokola moi oyo ezali kongenga makasi.

17Tango namonaki ye, nakweyaki na makolo na ye lokola moko akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na ye ya mobali mpe alobaki :

—Kobanga te ! Ngai nazali moto ya liboso mpe moto ya suka.
18Nazali na bomoi ; nakufaki, mpe tala sikʼoyo nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Mpe nasimbi bafungola ya liwa, na oyo ya mboka ya bakufi. 19Yango wana, koma makambo oyo omonaki, oyo ezali sikʼoyo, mpe oyo ekoya sima. 20Sekele ya minzoto sambo oyo omonaki na loboko na ngai ya mobalimpe ya biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda, elakisi boye : biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda ezali Mangomba sambo ya Nzambe, mpe minzoto sambo ezali baanzelu ya Mangomba sambo ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB